Acts 9

Saulo abongoli motema

1Nzoka nde, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendaki epai ya mokonzi ya banganga-Nzambe, 2mpe asengaki ye mikanda mpo na kopesa na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete soki akuti ndambo ya bato kuna, basi to mibali oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi.

3Tango azalaki kokende mpe akomaki pene ya Damasi, na mbala moko, amonaki pole moko kowuta na likolo mpe kongengela ye. 4Boye, akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye :

—Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai ?

5Saulo atunaki :

—Nkolo, yo nani ?

Mongongo ezongisaki :

—Ezali ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.
6Kasi sikʼoyo telema, kota na engumba, mpe kuna bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.

7Bato oyo bazalaki kosala mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba. Bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te. 8Saulo atelemaki wuta na mabele, kasi tango afungolaki miso, azalaki komona lisusu te. Boye, basimbaki ye na loboko mpe bamemaki ye na Damasi. 9Asalaki mikolo misato : komona te, kolia te mpe komela te.

10Moyekoli moko azalaki na Damasi, kombo na ye ezalaki Ananiasi. Nkolo abengaki ye na emoniseli :

—Ananiasi !

Ye azongisaki :

—Nkolo, ngai oyo !

11Nkolo alobaki na ye :

—Telema, kende na ndako ya Yuda, oyo ezali na balabala oyo babengaka : “Alima,” mpe tuna moto moko ya mboka Tarse, oyo azali kobondela. Kombo na ye Saulo.
12Pamba te, amonaki na emoniseli moto moko kombo na ye Ananiasi ayaki mpe atielaki ye maboko mpo ete amona lisusu !

13Kasi Ananiasi azongisaki :

—Nkolo, nayoka makambo mingi mpo na moto wana, mpe ndenge anyokolaki babulami na yo na Yelusalemi.
14Mpe ayei awa na Damasi, na bokonzi oyo bakonzi ya banganga-Nzambe bapesi ye mpo na kokanga bato nyonso oyo babondelaka yo.

15Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi :

—Kende, pamba te nasila kopona moto wana mpo ete azala esaleli na ngai mpo na komema Kombo na ngai na bikolo ya bapaya mpe epai ya bakonzi na bango, elongo na bato ya Isalaele.
16Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na ngai !

17Bongo, Ananiasi akendaki. Akotaki na ndako mpe atielaki Saulo maboko. Alobaki na ye : “Ndeko na ngai Saulo, Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela tango ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu !”

18Kaka na tango wana, biloko moko lokola baposo ya mbisi, ekweyaki wuta na miso ya Saulo. Boye, akomaki lisusu komona. Atelemaki mpe azwaki libatisi ; 19mpe sima ya kolia, nzoto na ye ezongaki lisusu makasi.

Saulo atatoli mpo na Yesu Klisto

Saulo avandaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki na Damasi.
20Kaka na tango wana, abandaki koteya na bandako ya mayangani ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. 21Bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye, bazalaki kokamwa mingi penza mpe bazalaki kotuna : “Boni, ezali ye te moto azalaki konyokola bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu na Yelusalemi ? Ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe ?” 22Nzoka nde, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali solo Klisto.

23Sima ya mikolo ebele, Bayuda bayokanaki mpo na koboma Saulo. 24Kasi bato bayebisaki Saulo makambo oyo bazalaki kobongisa mpo na ye. Butu mpe moyi, bazalaki kokengela bikuke ya engumba mpo na koluka koboma ye. 25Bongo, mokolo moko na butu, bayekoli na ye bakamataki ye, batiaki ye na kitunga mpe bakitisaki ye na libanda ya miri.

Saulo na Yelusalemi

26Tango Saulo akomaki na Yelusalemi, alukaki kosangana na bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, pamba te bazalaki penza kondima te ete akomi moyekoli. 27Kasi Barnabasi akamataki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma. Ayebisaki bango ndenge nini Saulo amonaki Nkolo na nzela ya Damasi, mpe makambo oyo Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango mpe lisusu ndenge nini ateyaki, na kobanga te, na Damasi na kombo ya Yesu. 28Bongo, Saulo avandaki elongo na bango. Azalaki kotambola na bonsomi nyonso kati na Yelusalemi mobimba mpe koteya na kobanga te, na Kombo ya Nkolo. 29Saulo azalaki kosolola mpe kotia tembe na Bayuda oyo balobaka monoko ya greki, nzoka nde, bango bazalaki koluka nzela ya koboma ye. 30Tango bandeko bayokaki likambo yango, bamemaki Saulo na Sezare, mpe longwa kuna, batindaki ye na Tarse.

Piere akeyi kotala Lingomba ya Yudea

31Lingomba ezalaki na kimia mingi kati na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samari. Ezalaki kokola na kondima, kotosa Nkolo mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.

Lobiko ya Ene

32Lokola Piere azalaki tango na tango kosala mibembo kati na mboka, akendaki mpe kotala basantu oyo bavandaka na mboka Lidi. 33Kuna, amonaki moto moko, na kombo ya Ene, oyo alala na etoko wuta mibu mwambe mpo ete azalaki na maladi ya buka-buka. 34Piere alobaki na ye : “Ene, Yesu Klisto abikisi yo ; telema mpe bongisa mbeto na yo !”

Kaka na tango wana, Ene atelemaki.
35Tango bato nyonso oyo bavandaka na Lidi mpe na esobe ya Saroni bamonaki ye, bandimelaki Nkolo.

Lisekwa ya Tabita

36Ezalaki na moyekoli moko ya mwasi na Jafa, na kombo ya Tabita, oyo babongola na monoko ya greki Dorkasi, elingi koloba : “Mboloko.” Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosalisa babola. 37Nzoka nde, na mikolo wana, azwaki maladi mpe akufaki. Sima ya kosokola nzoto na ye, batiaki yango na shambre ya likolo. 38Lidi ezalaki pene ya Jafa. Boye, tango bayekoli bayokaki sango ete Piere azali na Lidi, batindelaki ye mibali mibale mpo na koloba na ye : “Tobondeli yo, yaka noki !”

39Piere akendaki elongo na bango. Tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufela mibali bayaki kozingela ye mpe bazalaki kolela. Boye, bazalaki kolakisa ye banzambala mpe bilamba misusu oyo Dorkasi azalaki kotonga wana azalaki nanu elongo na bango. 40Piere asengaki ete bato nyonso oyo bazalaki na shambre babima. Afukamaki mpe abondelaki, bongo abalukaki epai nzoto ezalaki mpe alobaki : “Tabita telema !” Tabita afungolaki miso, amonaki Piere mpe avandaki. 41Boye, Piere akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye, abengaki bandimi elongo na basi oyo bakufisa mibali mpe alakisaki bango ete Dorkasi azali na bomoi. 42Sango yango epanzanaki na engumba mobimha ya Jafa mpe bato mingi bandimelaki Nkolo. 43Piere avandaki mikolo mingi na Jafa, na ndako ya moto moko na kombo ya Simona, oyo azalaki kosala mosala ya kobongisa baposo ya nyama.
Copyright information for LinMNB